Nsango Malamu ya Yoane

Lisolo ya Solo

1
12 nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.
book-open-2 READ

Liloba na Nzambe mpe Motatoli na yango

1Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka ; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe. 2Wuta na ebandeli, azalaka elongo na Nzambe. 3Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye ; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te. 4Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato. 5Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te. 6Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye ezalaki « Yoane. » 7Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye. 8Ye moko Yoane azalaki pole te, kasi ayaki nde mpo na kozala motatoli na tina na pole. 9Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso. 10Ye oyo azali Liloba azalaki kati na mokili, pamba te Ye nde akelaki yango, kasi mokili endimaki Ye te. 11Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te ; 12nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe. 13Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe. 14Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko. 15Yoane azalaki kotatola na tina na Ye, na mongongo makasi : « Botala Ye oyo nalobaki na tina na Ye : ‹ Ye oyo azali koya sima na ngai aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. › » 16Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu ; 17pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto. 18Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.

2
19 — Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato ?
book-open-2 READ

Kokoso ya liboso kati na Tempelo

13Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi. 14Tango akotaki kati na lopango ya Tempelo, akutaki bato bazali koteka bangombe, bameme mpe bibenga ; amonaki lisusu bato oyo babongolaka mbongo bavandi liboso ya bamesa na bango. 15Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele. 16Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga : « Bolongola biloko oyo awa ! Ezali Ndako ya Tata na Ngai ! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando ? » 17Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto ! » 18Bayuda balobaki na Yesu : — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ? 19Yesu azongisaki : — Bobuka Tempelo oyo, mpe Ngai nakotonga yango lisusu na mikolo misato. 20Bayuda balobaki lisusu : — Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato ? 21Nzokande Tempelo oyo Yesu azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na Ye moko. 22Sima, tango Yesu asekwaki, bayekoli na Ye basosolaki makambo oyo alobaki na bango. Boye bandimaki Makomi mpe maloba oyo Yesu alobaki. 23Wana Yesu azalaki kati na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika, bato mingi bandimelaki Kombo na Ye tango bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala. 24Kasi Yesu amipesaki te epai na bango, pamba te ayebaki bato nyonso. 25Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.

3
16 Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
book-open-2 READ

Yesu mpe Nikodemi

1Ezalaki na moto moko kati na Bafarizeo, oyo kombo na ye ezalaki « Nikodemi. » Azalaki moko kati na bakonzi ya Bayuda. 2Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te. 3Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika. 4Nikodemi atunaki Ye : — Ndenge nini moto oyo akomi mobange akoki kobotama lisusu ? Akoki solo kozonga na libumu ya mama na ye mpo ete abotama lisusu ? 5Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na Molimo. 6Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali molimo. 7Kokamwa te ndenge nalobi na yo : « Osengeli kobotama mbotama ya sika ! » 8Mopepe epepaka esika nyonso oyo elingi kopepa ; atako oyoki makelele na yango, kasi okokaka te koloba soki ewuti wapi to ezali kokende wapi. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na Molimo. 9Nikodemi atunaki lisusu : — Ekosalema ndenge nini ? 10Yesu alobaki na ye : — Ndenge nini yo, molakisi mobimba oyo okenda sango kati na Isalaele, ozali kososola te makambo oyo ? 11Nazali koloba na yo penza ya solo : tolobaka makambo oyo toyebi mpe topesaka litatoli na tina na makambo oyo tomoni ; kasi bino, boboyi kondima litatoli na biso. 12Soki tango nazali koloba na bino makambo ndenge esalemaka na mokili, bozali kondima te, bongo bokondima ndenge nini soki nalobi na bino makambo ya Likolo ? 13Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo : Mwana na Moto. 14Ndenge kaka Moyize atelemisaki na nzete, ekeko ya nyoka kati na esobe, ndenge wana mpe Mwana na Moto asengeli kotombolama 15mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye azwa, kati na Ye, bomoi ya seko. 16Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko. 17Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango. 18Moto nyonso oyo andimi Ye akozwa etumbu te ; kasi ye oyo aboyi kondima Ye asili kozwa etumbu, pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe. 19Tala ndenge nini etumbu yango ezali : pole eyaki kati na mokili, kasi bato balingaki molili, pamba te misala na bango ezali mabe. 20Moto nyonso oyo asalaka mabe ayinaka pole mpe apusanaka te epai pole ezali, noki te misala na ye ekomonana polele. 21Nzokande, moto nyonso oyo atambolaka na solo ayaka epai pole ezali mpo ete misala oyo asalaka, na boyokani elongo na Nzambe, emonana polele.

4
14 kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te :
book-open-2 READ

Yesu asololi na mwasi ya engumba Samari

1Yesu ayokaki ete Bafarizeo bazwi sango oyo ezali koloba ete akomi na bayekoli ebele koleka Yoane mpe azali kobatisa bato mingi koleka Yoane. 2(Nzokande, Yesu Ye moko azalaki kobatisa te, kasi ezalaki nde bayekoli na Ye.) 3Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile. 4Lokola asengelaki kolekela na Samari, 5akomaki na engumba Sishari ya Samari, oyo ezalaki mosika te na elanga oyo Jakobi apesaki epai ya mwana na ye, Jozefi. 6Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi. 7Tango mwasi moko ya engumba Samari akendeki kotoka mayi, Yesu alobaki na ye : — Pesa Ngai mayi mpo ete namela. 8(Bayekoli ya Yesu bakendeki na engumba mpo na kosomba biloko ya kolia). 9Kasi mwasi yango alobaki : — Ebandi ndenge nini yo oyo ozali Moyuda osenga ngai, mwasi ya engumba Samari, mayi mpo ete omela ? —Pamba te Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samari.— 10Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi. 11Mwasi alobaki na Yesu : — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ? 12Koko na biso, Jakobi, apesa biso libulu oyo ; ye moko mpe amela mayi na yango, elongo na bana na ye mpe bibwele na ye. Boni, okanisi ete oleki ye ? 13Yesu azongiselaki ye : — Moto nyonso oyo amelaka mayi oyo, ayokaka lisusu posa ya mayi ; 14kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko. 15Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, pesa ngai mayi yango mpo ete nayokaka lisusu posa ya mayi te mpe nazonga lisusu awa te mpo na kotoka mayi. 16Yesu alobaki na ye : — Kende, benga mobali na yo mpe zonga awa. 17Mwasi azongisaki : — Nazali na mobali te. Yesu alobaki na ye : — Ozali koloba penza ya solo ete ozali na mobali te, 18pamba te ozalaki na mibali mitano ; mpe ye oyo ozali na ye sik’oyo azali mpe mobali na yo te. Boye likambo oyo owuti koloba ezali ya solo. 19Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli. 20Bakoko na biso, bato ya Samari, bagumbamelaki Nzambe na likolo ya ngomba oyo ; kasi bino, Bayuda, bolobaka ete esika epai wapi tosengeli kogumbamela ezali kati na Yelusalemi. 21Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi. 22Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te ; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda. 23Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana. 24Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo. 25Mwasi alobaki na Yesu : — Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso. 26Yesu alobaki na ye : — Nazali Masiya, Ngai oyo nazali koloba na yo. 27Kaka na tango yango, bayekoli ya Yesu bazongaki. Bakamwaki mingi komona Yesu kosolola na mwasi. Kasi moko te kati na bango amekaki kotuna Ye : « Ozali koluka nini ? » to « Mpo na nini ozali kosolola na ye ? » 28Bongo mwasi atikaki mbeki na ye wana, azongaki na engumba mpe alobaki na bato : 29— Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ? 30Bato babimaki longwa na engumba mpe bakendeki epai ya Yesu. 31Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu : — Rabi, lia. 32Kasi Yesu azongiselaki bango : — Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te. 33Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango : — Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei ? 34Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai. 35Bino bolobaka : « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga ; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka. 36Moto oyo azali kobuka azali komizwela lifuti mpe kosangisa bambuma mpo na bomoi ya seko. Boye, moloni mpe mobuki mbuma bazali kosepela elongo, bango mibale. 37Awa nde ekokisami bosolo ya lisese oyo elobaka : « Moko alonaka, mosusu abukaka. » 38Natindaki bino kobuka bambuma ya elanga oyo bino bolonaki te ; ezali bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali bobele kosepela na motoki ya bato mosusu. 39Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa : « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. » 40Tango bato ya Samari bayaki epai ya Yesu, basengaki na Ye ete avanda elongo na bango ; mpe Yesu avandaki elongo na bango mikolo mibale. 41Bato ebele koleka bakomaki kondimela Ye mpo na maloba oyo Ye moko azalaki koloba. 42Bongo balobaki na mwasi wana : — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.

5
24 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
book-open-2 READ

Bokonzi ya Mwana

16Lokola Yesu azalaki kosala makambo wana na mokolo ya Saba, bakambi ya Bayuda bakomaki kofunda Ye. 17Kasi Yesu alobaki na bango : « Tata na Ngai azali kosala kino sik’oyo, Ngai mpe nazali kosala. » 18Mpo na yango, bakambi ya Bayuda bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; pamba te azalaki kotosa te mokolo ya Saba, azalaki koloba ete Nzambe azali Tata na Ye, mpe Ye akokani na Nzambe. 19Yesu alobaki na bango lisusu : Nazali koloba na bino penza ya solo : Mwana akoki kosala eloko moko te na ndenge na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komona Tata na Ye kosala ; pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, yango mpe Mwana asalaka. 20Boye lokola Tata alingaka Mwana, yango wana alakisaka Ye makambo nyonso oyo Ye moko Tata asalaka ; kutu, akolakisa Ye lisusu kosala makambo minene koleka oyo bosili komona kino sik’oyo, mpo ete bokamwa. 21Ndenge kaka Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge wana mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo Ye alingi. 22Lisusu, Tata asambisaka bato te ; apesa bokonzi ya kosambisa bato na maboko ya Mwana, 23mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana. 24Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi. 25Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ; 26pamba te lokola Tata azali etima ya bomoi, yango wana asalaki mpe ete Mwana azala etima ya bomoi ; 27mpe apesaki Ye bokonzi ya kosambisa bato, mpo ete azali Mwana na Moto. 28Bokamwa yango te, pamba te tango ezali koya, tango oyo bato nyonso oyo bazali kati na bakunda bakoyoka mongongo na Ye 29mpe bakobima longwa kati na yango : ba-oyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi ba-oyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu. 30Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.

6
35 Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
book-open-2 READ

Yesu azali lipa oyo epesaka bomoi

22Mokolo oyo elandaki, bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayaki kokanisa na sima ete ezalaki kaka na bwato moko, mpe ete Yesu akendeki bwato moko te na bayekoli na Ye ; bayekoli bakendeki bango moko kaka. 23Nzokande, babwato mosusu ewutaki na Tiberiade mpe ekomaki pene ya esika oyo baliaki mapa sima na Nkolo kozongisa matondi epai ya Nzambe. 24Tango bato bamonaki ete, ezala Yesu to bayekoli na Ye, moko te azalaki lisusu wana, bamataki na babwato yango mpe bakendeki koluka Yesu, na Kapernawumi. 25Tango bakutaki Ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki Ye : — Rabi, okomaki awa tango nini ? 26Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa. 27Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe. 28Batunaki Ye lisusu : — Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala oyo Nzambe azali kozela epai na biso ? 29Yesu azongiselaki bango : — Mosala ya Nzambe, yango oyo : bondima Ye oyo Nzambe atindaki. 30Batunaki Ye lisusu : — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ? 31Bakoko na biso baliaki mana kati na esobe kolanda ndenge ekomama : « Apesaki bango lipa kowuta na Likolo. » 32Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo. 33Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi. 34Bongo balobaki na Ye : — Nkolo, pesaka biso lipa yango tango nyonso. 35Yesu azongiselaki bango : — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te. 36Nzokande, ndenge nayebisaki bino, bozali komona Ngai, kasi bozali kondima te. 37Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai. 38Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai. 39Nzokande, Ye oyo atindaki Ngai alingi ete nabungisa ata moto moko te kati na bato oyo apesaki Ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka. 40Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko ; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 41Bayuda bakomaki koyimayima na tina na Ye mpo ete alobaki : « Ngai, nazali lipa oyo ekiti wuta na Likolo. » 42Bakomaki koloba : — Boni, wana ezali Yesu te ? Ezali mwana mobali ya Jozefi te ? Toyebi malamu tata mpe mama na ye ! Bongo ndenge nini azali koloba : « Nawuti na Likolo ? » 43Yesu azongiselaki bango : — Botika koyimayima kati na bino ! 44Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki Tata oyo atindaki Ngai abendi ye te ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 45Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai. 46Moto moko te amona Tata, longola kaka Ye oyo ayaki wuta epai ya Nzambe. 47Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi azali na bomoi ya seko, 48pamba te nazali lipa oyo epesaka bomoi. 49Bakoko na bino baliaki mana kati na esobe mpe bakufaki, 50kasi botala lipa oyo ewuti na Likolo ; moto oyo akolia yango akokufa te. 51Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai. 52Tango Bayuda bayokaki bongo, bakomaki kotiana tembe ; bazalaki koloba : — Akopesa biso nzoto na ye ndenge nini mpo ete tolia yango ? 53Bongo Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bolie nzoto ya Mwana na Moto te mpe bomeli makila na Ye te, bozali na bomoi te kati na bino. 54Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai, azali na bomoi ya seko ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka. 55Pamba te nzoto na Ngai ezali penza bilei, mpe makila na Ngai ezali penza lokola mayi oyo bamelaka. 56Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na ye. 57Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai. 58Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko. 59Wana nde ezalaki mateya ya Yesu kati na ndako ya mayangani ya Kapernawumi.

8
12 Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.
book-open-2 READ

Yesu azali pole ya mokili

12Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi. 13Bafarizeo balobaki na Ye : — Ozali kotatola mpo na yo moko, litatoli na yo ezali ya solo te. 14Yesu azongiselaki bango : — Ezala soki natatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ezali ya solo, pamba te nayebi epai nawuti mpe epai nazali kokende ; kasi bino, boyebi te ezala epai nawuti to epai nazali kokende. 15Bino, bosambisaka na ndenge ya bomoto ; kasi Ngai, nasambisi moto ata moko te. 16Mpe ezala soki esalemi ete Ngai nasambisi moto, kosambisa na Ngai ezali ya solo, pamba te nazali Ngai moko te : Tata oyo atindi Ngai azali elongo na Ngai. 17Ekomama kutu, kati na mibeko na bino, ete litatoli ya bato mibale nde ezalaka ya solo. 18Ngai, nazali kopesa litatoli na tina na Ngai moko, mpe Tata oyo atindaki Ngai azali lisusu kotatola na tina na Ngai. 19Bongo batunaki Ye : — Tata na yo azali wapi ? Yesu azongisaki : — Boyebi Ngai te, mpe boyebi Tata na Ngai te. Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai. 20Yesu alobaki bongo, wana azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, pene ya esika oyo bazalaki kotia makabo ; mpe moto ata moko te amekaki kokanga Ye, pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.

9
3 Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye.
book-open-2 READ

Yesu abikisi mokufi miso

1Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye. 2Bayekoli na Ye batunaki Ye : — Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso : boni, ezali ye moko to baboti na ye ? 3Yesu azongisaki : — Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye. 4Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala. 5Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili. 6Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso 7mpe alobaki na ye : — Kende kosukola na liziba ya Siloe. Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona. 8Bato oyo bazalaki zingazinga na ye mpe ba-oyo bazalaki komona ye kosenga-senga mbongo bakomaki koloba : — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki tango nyonso ya kovanda mpo na kosenga-senga mbongo ? 9Bamoko bazalaki koloba : — Ezali ye ! Bamosusu : — Te, ezali ye te ; akokani na ye ! Kasi ye moko, mokufi miso, azalaki koloba : — Ezali ngai ! 10Bongo batunaki ye : — Miso na yo ebikaki ndenge nini ? 11Azongiselaki bango : — Moto oyo babengaka Yesu asalaki potopoto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai : « Kende kosukola na Siloe. » Boye, nakendeki, nasukolaki mpe, mbala moko, nakomaki komona. 12Batunaki ye lisusu : — Moto yango azali wapi ? Azongisaki : — Nayebi te !

10
11 Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye.
book-open-2 READ

Yesu, Mobateli malamu ya bameme

1 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akotaka na lopango ya bameme na nzela ya ekuke te, kasi amataka na likolo ya lopango, na esika mosusu, azali moyibi mpe mobomi. 2Kasi ye oyo akotelaka na ekuke azali mobateli bameme. 3 Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda. 4Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na yango ; mpe bameme elandaka ye na sima, pamba te eyebi mongongo na ye. 5Ekotikala ata mokolo moko te kolanda mopaya ; kasi ekokima ye mosika, pamba te eyebi mongongo na ye te. 6Yesu ayebisaki bango lisese yango, kasi basosolaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango. 7Mpo na yango, Yesu alobaki na bango lisusu : — Nazali koloba na bino penza ya solo : Ngai nazali ekuke ya bameme. 8Bato nyonso oyo bayaki liboso na Ngai bazali miyibi mpe babomi ; bameme eyokelaki bango te. 9Ngai nde nazali ekuke ; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika ; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei. 10Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza. 11 Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye. 12Mosali oyo azali mobateli bibwele te, oyo azali nkolo bameme te, asalaka kaka mpo na lifuti. Soki kaka amoni mbwa ya zamba koya, asundolaka bameme mpe akimaka. Bongo mbwa ya zamba ekangaka bameme mpe epanzaka yango. 13Mosali yango akimaka, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti mpe atiaka makanisi na ye na bameme te. 14 Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele ; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai 15—ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai. 16Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Nasengeli komema yango ; ekoyoka mongongo na Ngai. Etonga ekozala kaka moko, mpe mobateli bibwele akozala kaka moko. 17Tata alingaka Ngai mpo ete nazali kokaba bomoi na Ngai ; kasi nakozwa yango lisusu. 18Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai. 19Bayuda bakabwanaki lisusu likolo ya maloba yango. 20Mingi kati na bango bazalaki koloba : — Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ? 21Bamosusu bazalaki kozongisa : — Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe ! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso ?

12
24 Nazali koloba na bino penza ya solo : soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele.
book-open-2 READ

Yesu alobeli kufa na Ye

20Kati na bato oyo bayaki na feti, na Yelusalemi, mpo na kogumbamela Nzambe, ezalaki na ndambo ya Bagreki. 21Bakendeki epai ya Filipo, moto ya mboka Betisaida ya Galile, mpe batalisaki ye bosenga oyo : — Tata, tolingi komona Yesu. 22Filipo akendeki koyebisa Andre ; bongo bango mibale, Andre mpe Filipo, bakendeki koyebisa Yesu. 23Yesu azongiselaki bango : — Sik’oyo, ngonga ekoki, ngonga oyo Mwana na Moto asengeli kokota kati na nkembo na Ye. 24Nazali koloba na bino penza ya solo : soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, ekobota solo bambuma ebele. 25Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko. 26Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.

13
34 Nazali kopesa bino mobeko ya sika : Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino.
book-open-2 READ

Mobeko ya sika

31Sima na Yuda kobima, Yesu alobaki : — Sik’oyo, nkembo ya Mwana na Moto emonisami, mpe Nzambe akozwa nkembo kati na Ye. [32Lokola Nzambe akozwa nkembo kati na Mwana,] Nzambe mpe akopesa Mwana nkembo, kati na Ye moko, mpe akosala yango kala mingi te. 33 Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai ; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. » 34 Nazali kopesa bino mobeko ya sika : Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino. 35Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.

14
6 Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
27 Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !
book-open-2 READ

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

1Yesu alobaki : — Tika ete mitema na bino etungisama te ! Bondima Nzambe mpe bondima Ngai. 2Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika ? 3Mpe, sima na Ngai kobongisa yango, nakozonga mpe nakozwa bino mpo ete bozala elongo na Ngai ; mpe mpo ete bino mpe bozala na esika oyo Ngai nazali. 4Boyebi nzela ya esika oyo nazali kokende. 5Toma alobaki na Yesu : — Te, Nkolo ! Toyebi te esika oyo ozali kokende ; bongo tokoyeba nzela na yango ndenge nini ? 6Yesu azongiselaki ye : — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te. 7Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai ; mpe kobanda sik’oyo, boyebi Ye mpe bomoni Ye. 8Filipo alobaki na Yesu : — Nkolo, lakisa biso Tata ; tozali na posa ya eloko mosusu te. 9Yesu azongiselaki ye : — Ah Filipo ! Kala nyonso oyo nazalaka elongo na bino, oyebaka na yo kaka Ngai te ? Moto oyo amoni Ngai amoni Tata. Bongo ndenge nini olobi : « Lakisa biso Tata ? » 10Ondimi te ete nazali kati na Tata, mpe ete Tata azali kati na Ngai ? Maloba oyo nayebisaka bino, nalobaka yango te na bokonzi na Ngai moko ; ezali Tata oyo azali kati na Ngai nde azali kokokisa bongo misala na Ye. 11Bondima Ngai : nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na Ngai. Soki te, bondima ata mpo na misala oyo bomoni Ngai kosala. 12Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi Ngai akosala misala oyo nazali kosala ; akosala kutu misala oyo eleki minene, pamba te nazali kokende epai ya Tata. 13Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana. 14Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango.

Yesu alaki kopesa Molimo Mosantu

15 Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai. 16Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso, 17Molimo ya solo, Molimo oyo mokili ekoki koyamba te mpo ete ezali komona Ye te to eyebi Ye te. Kasi bino, boyebi Ye, pamba te azali elongo na bino mpe azali kati na bino. 18Nakotika bino te lokola bana bitike ; nakozongela bino. 19Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te ; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi. 20Tango mokolo yango ekokoma, bokososola ete nazali kati na Tata na ngai ; bokososola lisusu ete bozali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na bino. 21Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai ; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye. 22Yuda (Yuda Isikarioti te) atunaki Yesu : — Nkolo, mpo na nini komimonisa epai na biso, kasi epai ya mokili te ? 23Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye. 24Kasi moto oyo alingaka Ngai te, akobatela mpe maloba na Ngai te. Nzokande, Liloba oyo bozali koyoka ezali ya Ngai te, kasi ezali Liloba ya Tata oyo atindaki Ngai. 25 Nayebisi bino makambo oyo nyonso, wana nazali nanu elongo na bino. 26Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino. 27 Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te ! 28 Boyoki Ngai koloba na bino ete nakeyi, mpe lisusu ete nakozongela bino. Soki bozalaki kolinga Ngai, bolingaki kosepela na kokende na Ngai epai ya Tata, pamba te Tata aleki Ngai na monene. 29Nayebisi bino makambo yango sik’oyo, liboso ete esalema, mpo ete bokoka kondima, na mokolo oyo ekosalema. 30Kobanda sik’oyo, nakoloba na bino lisusu mingi te, pamba te mokonzi ya mokili oyo azali koya. Ezali te mpo ete azali na nguya moko te likolo na Ngai, 31kasi ezali mpo ete mokili eyeba ete nalingaka Tata, mpe ete nazali kosala kolanda ndenge atindaki Ngai. Botelema ; tolongwa awa.

15
5 Nazali nzete ya vino ; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.
13 Bolingo oyo eleki monene ezali : kokaba bomoi mpo na balingami.
book-open-2 READ

Yesu, nzete ya solo ya vino

1 Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga. 2Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te ; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka. 3Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino. 4Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te. 5 Nazali nzete ya vino ; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te. 6Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati : ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika. 7Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango. 8Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu. 9 Ndenge Tata alingaki Ngai, Ngai mpe nalingaki bino ; boye, bowumela kati na bolingo na Ngai. 10Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye. 11 Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka. 12Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino. 13Bolingo oyo eleki monene ezali : kokaba bomoi mpo na balingami. 14Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino. 15 Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai. 16Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai. 17 Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino.

17
14 Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.
book-open-2 READ

Libondeli ya Yesu

1Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ; 2pamba te opesaki Ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo opesaki Ye. 3Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki. 4Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai. 5Sik’oyo Tata, pesa Ngai lisusu nkembo oyo nazalaki na yango kuna epai Yo ozali liboso ete okela mokili. 6 Namonisi nkembo na Yo epai ya bato oyo opesaki Ngai sima na Yo kolongola bango na misala ya mokili. Bazalaki bato na Yo, kasi opesaki Ngai bango ; mpe batosi Liloba na Yo. 7Bayebi malamu sik’oyo ete nyonso oyo opesaki Ngai ewutaki solo epai na Yo ; 8pamba te nateyaki bango maloba oyo opesaki Ngai, mpe bayambaki yango na esengo ; bayebi ete nawutaki solo epai na Yo, mpe bandimi ete Yo nde otindaki Ngai. 9Nazali kobondela nde mpo na bango ; nazali kobondela te mpo na bato ya mokili, kasi mpo na bato oyo opesaki Ngai, mpo ete bazali bato na Yo. 10Bato na Yo nyonso bazali bato na Ngai, mpe bato na Ngai nyonso bazali bato na Yo ; mpe nkembo na Ngai ezali komonisama kati na bango. 11Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo ; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko. 12Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai ; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama. 13 Sik’oyo, nazali koya epai na Yo ; kasi nazali koloba makambo oyo tango nazali nanu kati na mokili mpo ete esengo na Ngai, oyo ezali ya kokoka, ezala kati na bango. 14Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te. 15Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana. 16Bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te. 17Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo. 18Ndenge otindaki Ngai kati na mokili, ndenge wana mpe Ngai nazali kotinda bango. 19Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo. 20 Nazali kobondela mpo na bango kaka te, kasi mpe mpo na bato oyo bakondima Ngai na nzela ya mateya na bango, 21mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo ; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai. 22Nasaleli bango ngolu ya kobika nkembo na Yo ndenge kaka osalaki mpo na Ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko : 23Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai. 24 Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili. 25 Tata, Yo oyo ozali sembo, mokili eyebi Yo te ; kasi Ngai nayebi Yo, mpe bato oyo bayebi ete Yo nde otindaki Ngai. 26Nalakisi bango nguya ya Kombo na Yo, mpe nakokoba kolakisa bango yango, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na Ngai ezala kati na bango, mpe Ngai nazala kati na bango.

19
30 Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki : — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.
book-open-2 READ

Kufa Ya Yesu

28Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama : — Nayoki posa ya mayi. 29Lokola ezalaki na mbeki moko etonda na vino ya ngayi pembeni ya esika yango, batiaki, na songe ya nzete moko ya izope, eponze moko epola na vino yango ya ngayi mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu. 30Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki : — Nyonso ekokisami. Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye. 31Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango. 32Basoda bayaki mpe babukaki makolo ya mibali nyonso mibale oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na Yesu ; babandaki na moko, bongo balekaki na oyo mosusu. 33Wana ekomaki ngala ya makolo ya Yesu, bamonaki ete Yesu amikufelaki ; mpe babukaki lisusu te makolo na Ye. 34Moko kati na basoda atobolaki mopanzi ya Yesu na nzela ya likonga ; mpe mbala moko, makila mpe mayi ebimaki na mopanzi yango. 35Moto oyo azali kopesa litatoli na tina na makambo oyo amonaki yango kosalema na miso na ye, mpe litatoli na ye ezali ya solo ; ayebi penza ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima. 36Makambo nyonso wana esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama : « Bakobuka ata mokuwa na Ye moko te. » 37Eteni mosusu ya Makomi elobi : « Bakotala Ye oyo batobolaki mopanzi. »

20
19 Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
book-open-2 READ

Yesu abimeli bayekoli na Ye

19Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino ! 20Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na Ye mpe mopanzi na Ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo. 21Yesu alobaki na bango lisusu : — Tika ete kimia ezala na bino ! Ndenge Tata atindaki Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino. 22Sima na Yesu koloba makambo wana, afulaki bango mopepe mpe alobaki na bango : — Boyamba Molimo Mosantu ! 23Bato oyo bokolimbisa masumu na bango, masumu na bango ekolimbisama ; kasi ba-oyo bokolimbisa te, bakozwa mpe bolimbisi te.